
Toyekola ezali kokamba bana uta nkola ya mokie na nzela ya misala mya boteyami na nkota ya Kongo. Tozali kokembisa bososoli, ezaleli mpe bolikyi na kosanganaka elongo na biteyelo bya kelasi mpe mabota.
Etinda ya Toyekola ezali komema likolo nkota ya Kongo o kati ya mayekoli ya bana. Tondimisami na bokasi bonso ete koyekola na nkota ya libota lizali lifongola lya bososoli malamu, bondimi bonene na meï mpe ya bolongi malamu na kelasi.
Na bondimi lisanga elongo na biteyelo mpe mabota, tozo fulukisa misala ya boteyi na lolenge ya sika oyo ekokubisa ezaleli, bososoli mpe bokoli ya bana uuta bomwana na bango.

Tomityaka na esika ya mwana mpo na boyekoli na ye, na kotalela lokota mpe mimeseno na ye.
Tozali kokela makoki ma malakisi ma sika mayo mabalana na bobiki na biso mpo na botangi oyo bosengeli.
Tozali kotongo na lisanga elongo na biteyelo, mabota mpe mangomba mpo na misala ya malonga.
Tozali na emoniseli ya oyo eleki motuya mpo na manaka na biso na ntina ya kolengela elonga mpe bofuulki ya mwana nyonso.
Tolandelaka na bokebi posa moko na mosusu ya biteyelo mpe mangomba na ntina ya kobalanisa yango na bobiki na biso.

Bokeli bisalelo bya malakisi na nkota ya Kongo, oyo elengelama kolandisama nkola mpe epimelo mpo ya mwana moko na mosusu landa kokola na ye.
Bokambi mpe malongi mpo na balakisi na biso bya sika na ntina ya kokolisa bososoli na bango na lolenge na biso oyo elongobani mpo na kotangisa.

Tolandelaka na bokebi mpe ntango nyonso ezaleli ya bana mpe tokokanisaka yango na manaka mpo kokembisa mpe kofukukisa yango.
Likabo, bosangani to mpe mwa ntango ya misala malamu makoki kosunga mpo na kokela minkanda mya malakisi, koyekolisa bakambi mpe lolengela bokutani bwa bana. Elembo nyonso ezali na ntina mpo na kotonga mayekoli ya malonga mpe oyo elongobani na bobiki na biso ya mikolo nyonso.

Toyekola ezali kokamba bana uta nkola ya mokie na nzela ya misala mya boteyami na nkota ya Kongo. Tozali kokembisa bososoli, ezaleli mpe bolikyi na kosanganaka elongo na biteyelo ya kelasi mpe mabota.
38, av. Ngambali, Q. Kingasani, C. Kimbaseke, Kinshasa – RDC
libota@toyekola.net
+243 899 837 673
© 2026 Toyekola. Makoki mannso mabatelama.